Banzembo 97

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Yawe azali kokonza! Tika ete mabele esepela; tika ete ebele ya bisanga ezala na esengo!

2Mapata mpe molili makasi ezingeli Ye, bosembo mpe bosolo ezali miboko ya Kiti na Ye ya Bokonzi.

3Moto etambolaka liboso na Ye, ezikisaka banguna na Ye, oyo bazingeli Ye.

4Mikalikali na Ye engengisaka mokili; mpe tango mabele emonaka bongo, elengaka.

5Bangomba enyangwamaka lokola mafuta liboso ya Yawe, liboso ya Nkolo ya mokili mobimba.

6Likolo epanzaka sango ya bosembo na Ye, mpe bikolo nyonso bamonaka nkembo na Ye.

7Tika ete soni ekanga basambeli nyonso ya bikeko, bato oyo bamikumisaka mpo na banzambe ya lokuta! Bino banzambe nyonso, bogumbama liboso na Ye!

8Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli; bingumba ya Yuda ezali na esengo mpo na mikano na Yo!

9Pamba te, na mokili mobimba, Yo nde Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo; oleki banzambe nyonso.

10Bino bato oyo bolingaka Yawe, boyina mabe! Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.

11Moyi elonami mpo na moto ya sembo, mpe esengo, mpo na bato oyo bazali na mitema alima.

12Bino bato ya sembo, bosepela kati na Yawe; bosanzola Ye na kotatola bosantu na Ye.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0