Banzembo 75

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya koyemba lokola « Koboma te! » Nzembo ya Azafi.

2Nzambe, tozali kosanzola Yo, tozali kosanzola Kombo na Yo; mpo ete Kombo na Yo ezali pene, bato bazali kotatola bikamwa na Yo.

3Olobaki: « Na tango oyo ngai moko nakobongisa, nakokata makambo na bosembo.

4Mokili ekoki kolenga elongo na bavandi na yango nyonso, kasi ezali ngai nde nalendisaka makonzi na yango. »

5Nazali koloba na moto ya lofundu: « Kotombola lisusu mapeka te; » mpe na bato mabe: « Bosala lisusu lolendo te.

6Bomeka lisusu te kosala lofundu mpe koloba na lolendo. »

7Botombwami ewutaka na Este te, na Weste te, ewutaka mpe na esobe te.

8Pamba te ezali Nzambe nde akataka makambo: akitisaka moto songolo mpe atombolaka moto pakala.

9Loboko na Yawe esimbi kopo oyo etondi na vino ya makasi mpe ya bololo. Azali kosopa yango, mpe bato mabe nyonso ya mokili bazali komeka mpe komela yango kino na mbindo oyo etikalaka na se ya kopo.

10Mpo na ngai, nakotatola makambo oyo tango nyonso, nakoyemba mpo na lokumu ya Nzambe ya Jakobi,

11oyo azali koloba: « Nakosilisa makasi nyonso ya bato mabe; kasi nguya ya bato ya sembo ekomata lisusu makasi. »

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0