Banzembo 94
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Yawe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, Nzambe oyo azongisaka mabe na mabe, mimonisa kati na nkembo na Yo!
2Mosambisi ya mokili, telema mpo na kozongisela bato ya lolendo mabe na mabe na bango!
3Yawe, kino tango nini bato mabe, kino tango nini bato mabe bakosepela?
4Bazali komilakisa, bazali kobimisa mafinga; bato nyonso ya misala mabe bazali komikumisa!
5Yawe, bazali konyokola bato na Yo mpe bazali koyokisa libula na Yo pasi;
6bazali koboma mwasi oyo akufisa mobali, mopaya mpe bana bitike;
7bazali koloba: « Yawe amonaka eloko moko te, Nzambe ya Jakobi asosolaka eloko moko te! »
8Bino bato ya kilikili, bososola! Bazoba, bokokoma mayele tango nini?
9Boni, Ye oyo asala litoyi akoki koyoka te? Ye oyo asala liso akoki komona te?
10Ye oyo apesaka bikolo etumbu akoki kopesa etumbu te? Ye oyo apesaka bato boyebi.
11Yawe ayebi makanisi ya bato; ayebi ete ezali na tina te.
12Yawe, esengo na moto oyo ozali kozongisa na nzela, moto oyo ozali kolakisa mibeko na Yo
13mpo na kopesa ye bopemi na tango ya pasi, kino libulu etimolama mpo na moto mabe!
14Pamba te Yawe asundolaka bato na Ye te, abwakaka libula na Ye te.
15Bakosambisa lisusu kolanda bosembo, mpe bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakotosa bosembo yango.
16Nani akotelema mpo na ngai mpo na kotelemela bato mabe? Nani akokotela ngai liboso ya bato ya misala mabe?
17Ah, soki Yawe asungaki ngai te, mbele nakendeki noki na mokili ya kufa!
18Soki nalobi: « Makolo na ngai ekomi kolenga na somo, » bolingo na Yo, Yawe, epesaka ngai makasi.
19Soki natungisami na makanisi ebele, kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.
20Boni, bokonzi ya mabe oyo ememelaka bato pasi na nzela ya mibeko na yango; boni, ezali lisanga moko elongo na Yo?
21Bato mabe basanganaka mpo na kobundisa bomoi ya moto ya sembo mpe kokatela moto oyo asali mabe te etumbu ya kufa.
22Kasi Yawe azali, mpo na ngai, ndako batonga makasi; Nzambe na ngai azali libanga epai wapi nazwaka ebombamelo.
23Akozongisela bango mabe na bango mpe akobebisa bango mpo na kanza na bango. Solo, Yawe, Nzambe na ngai, akoboma bango.
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0