Banzembo 81

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Azafi. Ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati.

2Boganga na esengo epai ya Nzambe, makasi na biso! Bobetela Nzambe ya Jakobi maboko!

3Boyemba banzembo, bobeta bambunda mike, lindanda oyo ebimisaka lokito kitoko mpe nzenze!

4Bobeta kelelo na ebandeli ya sanza, na tango oyo sanza mobimba engengaka, mpo na mokolo ya feti na biso!

5Pamba te ezali mobeko mpo na Isalaele, mpe mokano ya Nzambe ya Jakobi.

6Atiaki yango lokola mobeko mpo na Jozefi tango abundisaki Ejipito. Nazali koyoka lokota oyo nayebi te:

7« Nalongolaki mokumba oyo ezalaki na mapeka na ye, mpe maboko na ye elongwaki na bowumbu ya kosimba bitunga. »

8Tango ozalaki koganga mpo na pasi, nakangolaki yo, nayanolaki yo kati na kake epai wapi nabombamaki, namekaki yo pembeni ya mayi ya Meriba.

9Bato na ngai, boyoka ngai! Mpe nakokebisa bino. Ah Isalaele, soki kaka ozalaki koyokela ngai!

10Okozala na nzambe ya mopaya te kati na yo, okogumbamela nzambe mosusu te, longola kaka ngai!

11Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito; fungola malamu monoko na yo, mpe nakotondisa yango.

12Kasi bato na ngai bayokaki mongongo na ngai te, Isalaele aboyaki kotosa ngai.

13Mpo na yango, natikaki bango kotambola kolanda baposa ya mitema makasi na bango; mpe balandaki makanisi na bango.

14Soki bato na ngai bazalaki koyokela ngai, soki Isalaele azalaki kolanda banzela na ngai,

15nalingaki mbala moko koyokisa banguna na bango soni mpe kobundisa bayini na bango.

16Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.

17Yawe alingaki koleisa Isalaele bilei ya kitoko mpe kotondisa bango na mafuta ya nzoyi.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0