Banzembo 109

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te!

2Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.

3Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.

4Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.

5Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, mpe koyina na bolingo.

6Kaba ye na maboko ya moto mabe! Bimisela ye monguna, na ngambo ya loboko na ye ya mobali!

7Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu!

8Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye!

9Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali!

10Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana!

11Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye!

12Tika ete moko te atalisa ye bolingo, tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa!

13Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda!

14Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye!

15Tika ete Yawe akanisaka masumu yango tango nyonso mpe asala ete babosana bango libela na mokili!

16Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema;

17lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye!

18Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta!

19Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba oyo alati, mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba mpo na tango nyonso!

20Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.

21Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.

22Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.

23Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa; bazali kobengana ngai lokola mabanki.

24Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi.

25Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.

26Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai; bikisa ngai kolanda bolingo na Yo!

27Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo.

28Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.

29Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.

30Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, nakokumisa Ye kati na ebele ya bato.

31Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0