Banzembo 128

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe alandaka banzela na Ye!

2Oliaka mbuma ya mosala na Yo; ozali moto ya esengo mpe ozali na bofuluki.

3Kati na ndako na yo, mwasi na yo azali lokola nzete ya vino oyo ebotaka bambuma ebele; bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive zingazinga ya mesa na yo.

4Ezali ndenge wana nde Yawe apambolaka moto oyo atosaka Ye.

5Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo

6mpe okomona bakitani na yo. Tika ete kimia ezala na Isalaele!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0