Banzembo 111

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Bokumisa Yawe! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.

2Yawe asalaka makambo minene; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.

3Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.

4Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye.

5Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.

6Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.

7Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.

8Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo.

9Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.

10Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0