Banzembo 57

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki ndenge moko na nzembo « Koboma te. » Nzembo ya Davidi, tango Saulo azalaki kolanda ye, mpe tango Davidi abombamaki kati na libulu.

2Oh Nzambe, yokela ngai mawa! Yokela ngai mawa, pamba te nazali koluka ebombamelo; nazali koluka ebombamelo na se ya mapapu na Yo, kino tango ya pasi ekoleka.

3Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.

4Akotinda wuta na likolo mpe akobikisa ngai, akopamela bato oyo batungisaka ngai. Nzambe akomonisa bolingo mpe boyengebene na Ye.

5Nazali na kati-kati ya bankosi; nalali na kati-kati ya bato oyo babomaka mpe baliaka bato, oyo minu na bango ezali makonga mpe batolotolo, mpe lolemo na bango ezali mopanga ya minu makasi.

6Oh Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; tika ete nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba!

7Batiaki monyama na makolo na ngai mpo ete nakangama, batimolaki libulu liboso na ngai, kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.

8Nzambe, lendisa motema na ngai; Nzambe, lendisa motema na ngai. Nakoyembela Yo mpe nakosanzola Yo na mindule.

9Lokumu na ngai, lamuka! Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo.

10Nkolo, nakosanzola Yo kati na mabota, nakosanzola Yo na mindule kati na bikolo.

11Pamba te bolingo na Yo ezali monene, ekenda kino na Lola; mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.

12Nzambe, tika ete omitombola na likolo ya Lola; mpe tika ete nkembo na Yo etonda na mokili mobimba!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0