Banzembo 41

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Esengo na moto oyo akanisaka mobola! Yawe akokangola ye na tango ya pasi.

3Yawe akokengela ye mpe akobatela bomoi na ye, akokomisa ye moto ya esengo kati na mokili mpe akokaba ye te na maboko ya banguna na ye.

4Yawe akosunga ye na mbeto na ye soki abeli mpe akobikisa ye na bokono na ye nyonso.

5Nalobaki: « Oh Yawe, yokela ngai mawa; bikisa ngai na bokono, pamba te nasalaki masumu epai na Yo. »

6Banguna na ngai balobaka mabe na tina na ngai: « Akokufa mokolo nini mpo ete kombo na ye etangama lisusu te? »

7Kati na bango, moto nyonso oyo ayaka kotala ngai alobaka kaka lokuta mpo na kobebisa lokumu na ngai, akangisaka kati na ye makambo ya lokuta mpe, soki kaka abimi libanda, apanzaka yango na matongi.

8Banguna na ngai basanganaka kaka mpo na kotonga ngai mpe kokanisa mpo na libebi na ngai.

9Balobaka: « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »

10Ezala molingami na ngai ya kimia, oyo nazalaki kotiela motema mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai, abalukeli ngai.

11Kasi Yo, Yawe, yokela ngai mawa mpe telemisa ngai mpo ete nazongisela bango mabe na mabe.

12Nakoyeba ete osepelaka na ngai soki kaka monguna na ngai agangi te na tina na ngai.

13Mpo ete nazangi pamela, okosunga ngai mpe okovandisa ngai na makolo na Yo mpo na libela.

14Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama libela na libela! Amen! Amen!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0