Banzembo 93

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Yawe azali kokonza, alati lokumu monene; Yawe alati penza lokumu monene mpe amizingeli na nguya. Solo, mokili etelema ngwi, eninganaka te.

2Kiti ya Bokonzi na Yo epikama wuta kala; seko na seko, ozali.

3Yawe, bibale egangaka! Bibale etombolaka lokito na yango; bibale etombolaka makelele na yango.

4Yawe azali monene makasi, na bisika ya likolo; aleki lokito ya mayi minene, mpe bambonge milayi ya ebale monene.

5Yawe, malako na Yo ezali penza ya solo; bosantu elati Ndako na Yo mpo na libela.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0