Banzembo 79
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga!
2Bapesi bibembe ya basali na Yo lokola bilei epai ya bandeke ya likolo, mpe bibembe ya bayengebene na Yo epai ya banyama ya zamba;
3basopi makila na bango lokola mayi zingazinga ya Yelusalemi, mpe moto ya kokunda bango azalaki te!
4Tala ndenge bato ya bikolo oyo ezingeli biso bazali kofinga biso, mpe tokomi lokola eloko ya liseki na miso na bango!
5Kino tango nini, Yawe, okokangela biso kanda? Kino tango nini zuwa na Yo ekopela lokola moto?
6Sopela bikolo oyo eyebi Yo te mpe mikili oyo ebelelaka Kombo na Yo te, kanda makasi na Yo;
7pamba te babebisi Jakobi mpe bapanzi mokili na ye.
8Kotangela biso te masumu na biso ya kala, kokangela biso motema te, yokela biso mawa, pamba te tokomi na suka!
9Nzambe Mobikisi na biso, sunga biso mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola biso mpe limbisa masumu na biso mpo na Kombo na Yo!
10Mpo na nini bikolo eloba: « Nzambe na bango azali wapi? » Tika ete, na miso na biso, bato ya bikolo bayeba ete ozongiseli bango mabe na mabe, mpo na makila ya basali na Yo, oyo basopaki.
11Tika ete kolela ya bakangami kati na boloko ekoma liboso na Yo! Na nguya monene na Yo, bikisa ba-oyo bazwa etumbu ya kufa!
12Oh Nkolo, zongisela bikolo oyo ezingeli biso, kotiola oyo batiolaki Yo; zongisela bango mbala sambo.
13Mpe biso, bato na Yo, etonga oyo oleisaka, tokosanzola Yo tango nyonso; mpe na bikeke nyonso, tokosakola lokumu na Yo.
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0