Banzembo 19
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
2Likolo etatolaka nkembo ya Nzambe, mapata elobaka misala na Ye.
3Mokolo moko na moko eyebisaka yango epai ya mokolo oyo elandaka, mpe butu moko na moko eyebisaka yango epai ya butu oyo elandaka.
4Ezali na nzela ya lisolo te, na nzela mpe ya maloba te oyo mingongo na yango eyokanaka te.
5Nzokande, sango na yango eyokanaka na mokili mobimba, maloba na yango ekomaka kino na suka ya mokili. Na likolo, Nzambe atie ndako ya kapo mpo na moyi.
6Moyi yango ebimaka na tongo ndenge elenge mobali oyo abali sika abimaka na shambre na ye, mpe ndenge elombe atambolaka na elikya ya kolonga na momekano.
7Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.
8Mibeko ya Yawe ezali ya kokoka, epesaka biso lisusu nguya ya kozala na bomoi. Maloba na Ye nyonso ezali ya solo, ebongi na kotiela yango elikya, mpe epesaka bwanya epai ya zoba.
9Mitindo ya Yawe ezali alima, esepelisaka motema; malako na Ye ezali peto, epesaka bososoli.
10Kotosa Yawe ezali peto, ewumelaka libela na libela. Mitindo ya Yawe ezali ya solo, nyonso ezali penza sembo.
11Ezali na motuya koleka wolo, koleka wolo ebele ya peto, wolo oyo basangisa na eloko mosusu te; eleki mafuta ya nzoyi na elengi, mafuta ya nzoyi oyo ezali kobima sika.
12Epesaka mosali na Yo mayele; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.
13Nani akoki kososola mabunga na ye oyo asali na nko te? Limbisa masumu na ngai, oyo nayebi te!
14Batela lisusu mosali na Yo mpo ete nasala mabe na nko te. Na bongo, nakozala moto ya kokoka mpe nakosala bambeba minene te.
15Yawe, Libanga na ngai mpe Mosikoli na ngai, tika ete maloba mpe makanisi ya motema na ngai esepelisa Yo!
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0