Banzembo 103
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nzembo ya Davidi. Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Tika ete motema na ngai mobimba epambola Kombo na Ye ya bule!
2Eh molimo na ngai, pambola Yawe mpe kobosana ata moko te kati na misala malamu na Ye!
3Ye nde alimbisaka masumu na Yo nyonso, abikisaka yo na bokono nyonso,
4akangolaka bomoi na yo wuta na libulu, alatisaka yo motole ya bolingo mpe ya mawa,
5atondisaka bomoi na yo na esengo mpe akomisaka yo elenge lokola mpongo.
6Yawe asalaka mpo na bosembo, akotelaka banyokolami nyonso.
7Amonisaki banzela na Ye epai ya Moyize, mpe bikamwa na Ye epai ya bato ya Isalaele.
8Yawe ayokelaka bato mawa mpe asalelaka bango bolamu, asilikaka noki te mpe atonda na bolingo;
9azwaka biso makambo te tango nyonso, abombaka kanda na Ye te mpo na libela;
10apamelaka biso te kolanda masumu na biso, azongiselaka biso te kolanda mabe na biso.
11Ndenge likolo etombolama mosika ya mabele, ndenge wana mpe bolingo na Ye ezali monene mpo na bato oyo batosaka Ye;
12ndenge este ezali mosika ya weste, ndenge wana mpe abwakaka masumu na biso mosika na biso.
13Ndenge tata alingaka makasi bana na ye, ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi bato oyo batosaka Ye;
14pamba te Yawe ayebi na eloko nini asala biso, ayebi malamu ete tozali putulu.
15Mikolo ya bomoi ya moto ezali lokola matiti, ebongaka lokola fololo ya bilanga;
16nzokande soki kaka mopepe ebeti yango, ezalaka lisusu te, mpe esika epai wapi ezalaki ebosani yango.
17Kasi bolingo ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Ye, mpe bosembo na Ye mpo na bakitani na bango,
18mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye mpe batosaka mibeko na Ye, ezali ya libela na libela.
19Yawe atia Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Likolo, azali Mokonzi ya mokili mobimba.
20Bopambola Yawe, bino ba-anjelu na Ye nyonso oyo bozali na nguya mpe botosaka mitindo na Ye.
21Bopambola Yawe, bino mampinga na Ye nyonso oyo bokokisaka mokano na Ye.
22Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso, kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye. Eh molimo na ngai, pambola Yawe!
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0