Banzembo 121

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi?

2Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele.

3Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

4Te, Ye oyo abatelaka Isalaele animbaka te mpe alalaka pongi te!

5Yawe azali mobateli na yo; Yawe azali, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, lokola elili oyo ebatelaka yo.

6Ezala na moyi to na butu, moyi mpe sanza ekosala yo mabe ata moke te!

7Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo;

8Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0