Banzembo 28

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo! Ozali Libanga na ngai, koboya te koyoka ngai. Soki te, nakozala lokola bato oyo bazali kokita na kunda.

2Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.

3Kokumba ngai te elongo na bato mabe, elongo na bato oyo basalaka mabe, oyo balobaka makambo ya kimia epai ya baninga na bango, kasi babombaka mabe kati na mitema na bango.

4Zongisela bango kolanda misala na bango, kolanda misala mabe na bango; zongisela bango kolanda misala ya maboko na bango, mpe kweyisela bango oyo ekoki na misala na bango.

5Pamba te bamemiaka te misala ya Yawe mpe makambo oyo akokisaka, akobamba bango na mabele mpe akotikala kotelemisa bango lisusu te.

6Tika ete Yawe akumisama, pamba te ayanoli mabondeli na ngai.

7Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.

8Yawe azali makasi ya bato na Ye, ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.

9Yawe, bikisa bato na Yo mpe pambola libula na Yo; zala mobateli na bango mpe sunga bango mpo na libela.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0