Banzembo 54

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Eyembamaki na lindanda tango bato ya Zifi bayaki koyebisa Saulo: « Davidi abombami kati na biso. »

3Oh Nzambe, bikisa ngai na nzela ya Kombo na Yo, longisa ngai na nzela ya nguya na Yo.

4Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, yoka maloba ya monoko na ngai.

5Bapaya batelemi mpo na kobundisa ngai; mpe bato na kanza bazali koluka koboma ngai, batalelaka Nzambe te.

6Tala, Nzambe azali lisungi na ngai, Nkolo azali eyekamelo na ngai.

7Tika ete akweyisela bayini na ngai mabe! Kati na boyengebene na Yo, bebisa bango.

8Nakobonzela Yo mbeka na motema malamu, nakokumisa Kombo na Yo, Oh Yawe, pamba te ozali malamu.

9Okangoli ngai na pasi nyonso; mpe miso na ngai etali lokola molongi ya banguna na ngai.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0