Banzembo 140

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.

3Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.

4Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.

5Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai!

6Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.

7Nalobaka na Yawe: « Ozali Nzambe na ngai! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.

8Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.

9Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.

10Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.

11Tika ete makala ya moto esopanela bango! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te!

12Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.

13Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.

14Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0