Banzembo 9

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba, nakotatola misala minene na Yo nyonso.

3Nakozala na esengo mpe nakosepela kati na Yo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo.

4Banguna na ngai bazongaka sima, bakweyaka mpe balimwaka liboso na Yo.

5Pamba te, okataki likambo na ngai mpe olongisaki ngai, ovandi na Kiti ya Bokonzi lokola Mosambisi ya sembo.

6Opamelaki bikolo mpe obomaki moto mabe, olimwisaki kombo na bango mpo na libela.

7Banguna na ngai balimwa mpo na libela; opanzaki bingumba na bango kino bakanisa bango lisusu te.

8Yawe akonzaka mpo na libela, atia Kiti na Ye ya Bokonzi mpo na kokata makambo ya bato.

9Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.

10Yawe azali ebombamelo mpo na bato oyo bazali konyokolama, mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.

11Bato oyo bayebi Kombo na Yo batiaka elikya na bango kati na Yo; pamba te, Yo Yawe, osundolaka te bato oyo balukaka Yo.

12Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.

13Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.

14Yawe, yokela ngai mawa, tala ndenge nini bayini na ngai bazali konyokola ngai, mpe kangola ngai wuta na bikuke ya kufa;

15mpo ete napanza sango ya lokumu na Yo kati na bikuke ya Siona, mboka kitoko, mpe nasepela na lobiko na Yo kuna.

16Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

17Yawe amilakisi na nzela ya misala na Ye ya bosembo; bato mabe bakangami na mitambo oyo bango moko basalaki.

18Bato mabe, bikolo nyonso, oyo bakanisaka Nzambe te, bakokende na mboka ya bakufi.

19Kasi Nzambe akotikala te kobosana mobola, mpe elikya ya banyokolami ekotikala seko na seko.

20Yawe, telema! Tika ete moto alonga te; tika ete bapagano basamba liboso na Yo!

21Yawe, tika ete somo ekanga bango; tika ete bapagano bayeba ete bazali na bango kaka bato!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0