Banzembo 12

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

2Yawe, sunga biso! Pamba te bayengebene bazali lisusu te; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.

3Bato nyonso bazali kokosana bango na bango, bazali kolobana maloba ya sukali, kasi mitema na bango ezali sembo te.

4Tika ete Yawe aboma bato nyonso oyo balobaka maloba ya sukali mpe batondi na lolendo,

5ba-oyo balobaka: « Tokolonga na nzela ya lolemo na biso, bibebu na biso ekolobela biso; nani akoluka kozala nkolo na biso? »

6Yawe alobi: « Mpo ete bazali konyokola babola mpe kolelisa bato oyo bakelela, natelemi sik’oyo mpo na kobikisa batiolami. »

7Maloba ya Yawe ezalaka peto lokola palata oyo balekisi na moto mpe bapetoli mbala sambo.

8Yo, Yawe, okobatela bato oyo bakelela, okobikisa biso mpo na libela liboso ya bato mabe.

9Bato mabe batambolaka na bonsomi bipai na bipai soki bato bapesi bozoba lokumu.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0