Banzembo 90

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Losambo ya Moyize, moto na Nzambe. Oh Nkolo, ozalaki ekimelo na biso, na bikeke nyonso.

2Liboso ete bangomba ezala, liboso ete okela mabele mpe mokili, libela na libela, ozali Nzambe.

3Ozongisaka moto na putulu, pamba te oloba: « Bino bato, bozonga na putulu! »

4Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.

5Olekisaka yango lokola pongi ya butu, oyo na tongo, esilaka lokola lititi.

6Na tongo, ebimisaka fololo mpe etelaka noki; kasi na pokwa, enzulukaka mpe ekawuki.

7Kanda na Yo elembisaka biso nzoto, mpe kanda makasi na Yo epesaka biso bobangi.

8Otiaka masumu na biso liboso na Yo mpe obimisaka na polele makambo oyo tobombaka.

9Mikolo nyonso ya bomoi na biso elimwaka mpo na kanda na Yo, mpe mibu na biso esilaka lokola kolela.

10Molayi ya bomoi na biso ekoki kozala mibu tuku sambo to mibu tuku mwambe mpo na bato oyo baleki makasi; nzokande, etondi na pasi mpe na minyoko, pamba te elekaka noki, mpe tolimwaka.

11Nani ayebi makasi ya kanda na Yo? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.

12Lakisa biso kotanga malamu mikolo ya bomoi na biso mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.

13Yawe, lembisa moke! Kino tango nini ekowumela? Yokela basali na Yo mawa!

14Tongo nyonso, tondisaka biso na bolingo na Yo mpe tokoganga na esengo, mpe tokosepela mikolo nyonso ya bomoi na biso.

15Zongisela biso na mikolo ya esengo, mikolo oyo onyokolaki biso; zongisela biso na mibu ya esengo, mibu oyo tomonaki pasi.

16Tika ete biso, basali na Yo, tomona misala na Yo; mpe ete bana na biso bamona kongenga makasi ya nkembo na Yo!

17Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0