Banzembo 78
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nzembo ya Azafi. Bino, bato na ngai, boyoka malako na ngai! Bopesa matoyi na maloba ya monoko na ngai!
2Nakofungola monoko na ngai mpo na lisese, nakosakola makambo oyo ebombama wuta na tango ya kala.
3Makambo oyo toyoka, oyo toyebi, oyo batata na biso bayebisa biso.
4Tokobombela yango bakitani na bango te, kasi tokoloba na bikeke oyo ekoya na sima nkembo ya masanzoli ya Yawe, nguya na Ye mpe bikamwa oyo asalaki.
5Apesaki malako mpo na bolamu ya Jakobi, atiaki mibeko kati na Isalaele, apesaki mitindo epai ya batata na biso ete bateya yango epai ya bana mibali na bango,
6mpo ete bikeke oyo ekoya sima eyeba yango, ekeke ya bana oyo bakobotama. Tika ete batelema mpe bayebisa yango na bana na bango,
7mpo ete batonga elikya na bango kati na Nzambe, babosana te misala ya Nzambe mpe babatela mibeko na Ye.
8Boye, bakozala te lokola bakoko na bango, oyo bazalaki mito makasi mpe batomboki, oyo mitema na bango ezalaki sembo te na miso ya Nzambe, mpe milimo na bango ezangaki boyengebene epai na Ye.
9Bato ya libota ya Efrayimi basimbaki batolotolo, kasi na mokolo ya etumba, bakimaki.
10Babatelaki te Boyokani ya Nzambe mpe baboyaki kotosa mibeko na Ye;
11babosanaki bikamwa na Ye mpe makambo minene oyo atalisaki bango.
12Na miso ya bakoko na bango, asalaki bikamwa kati na Ejipito, na etuka ya Tsoani;
13akabolaki ebale monene mpo na kolekisa bango, atelemisaki mayi lokola mir.
14Na moyi, azalaki kotambolisa bango na nzela ya lipata; mpe na butu, na nzela ya pole ya moto.
15Apasolaki mabanga kati na esobe mpe amelisaki bango mayi ebele, lokola mayi ya bibale;
16abimisaki mayi wuta na libanga mpe asalaki ete etiola lokola mayi ya ebale.
17Kasi bakobaki kaka kosala masumu liboso na Ye, kotombokela Ye-Oyo-Aleki-Likolo, kati na esobe.
18Bamekaki Nzambe na nko, na kosenga bilei kolanda posa na bango.
19Balobaki mabe na tina na Nzambe: « Boni, Ye Nzambe azali penza na makoki ya kopesa biso bilei kati na esobe?
20Solo, abetaki libanga, mayi ebimaki, mpe ebimaki penza ebele. Boni, akokoka lisusu kopesa biso mapa to misuni epai ya bato na Ye? »
21Tango Yawe ayokaki bongo, asilikaki makasi; moto na Ye epelelaki Jakobi, mpe kanda makasi na Ye ekitelaki Isalaele,
22pamba te batiaki elikya na Nzambe te, bandimaki te ete akoki kokangola bango.
23Nzokande, apesaki mitindo na mapata mpe afungolaki bikuke ya likolo,
24anokiselaki bango mana lokola mvula mpo na kopesa bilei, apesaki bango ble ya Likolo.
25Moko na moko aliaki mapa ya ba-anjelu. Atindelaki bango bilei ebele penza.
26Wuta na likolo, atindikaki mosika mopepe ya Este; mpe na nguya na Ye, amemaki mopepe ya Sude.
27Anokiselaki bango misuni lokola putulu, bandeke ebele lokola zelo ya ebale monene;
28akweyiselaki bango yango kati na molako na bango, zingazinga ya bandako na bango ya kapo.
29Baliaki mpe batondaki makasi; Nzambe apesaki bango biloko oyo bazalaki na yango posa.
30Liboso ete posa na bango ekoka, wana bazalaki nanu na minoko etonda na bilei,
31kanda ya Nzambe ekweyelaki bango, abomaki bato minene kati na bango, anyokolaki bilenge ya Isalaele.
32Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala masumu, bandimaki kaka te bikamwa na Ye.
33Boye, asukisaki mikolo ya bomoi na bango lokola mopepe, mpe mibu na bango ya mbotama kati na somo.
34Tango nyonso Nzambe azalaki koboma bango, bazalaki koluka Ye; bazalaki komizongisa noki epai na Ye.
35Bazalaki kozongisa na makanisi na bango ete Nzambe nde azali Libanga na bango, ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo azali Mosikoli na bango.
36Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye;
37mitema na bango ezalaki sembo te na miso na Ye, mpe bazalaki kobuka Boyokani na Ye.
38Nzokande Ye, na mawa na Ye, azalaki kolimbisa mabe na bango na esika ya kobebisa bango; mbala mingi, azalaki kokanga motema na esika ya kopelisela bango kanda na Ye;
39pamba te azalaki koyeba ete bazali kaka bato, bazali kaka lokola mopepe oyo ezali koleka mpe ekozonga lisusu te.
40Mbala mingi, batombokelaki Ye kati na esobe mpe bayokisaki Ye mawa kati na bisika ya kokawuka;
41bazalaki kozongela komeka Nzambe, koyokisa Mosantu ya Isalaele mawa.
42Babosanaki makambo minene oyo asalaki na nguya na Ye, mokolo oyo akangolaki bango wuta na maboko ya monyokoli;
43babosanaki bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, misala minene oyo asalaki kati na etuka ya Tsoani.
44Abongolaki bibale na bango makila; boye, bakokaki lisusu te komela na mayi na bango.
45Atindelaki bango banzinzi oyo eswaka, mpe eliaki bango; mpe magorodo oyo ebebisaki bango.
46Akabaki bambuma ya bilanga na bango epai ya mabanki, mpe mbuma ya mosala na bango epai ya mankoko.
47Abebisaki bilanga na bango ya vino na nzela ya mvula ya mabanga, mpe banzete na bango ya sikomori na nzela ya mvula ya pembe;
48akabaki bameme na bango epai ya mvula ya mabanga, mpe bibwele na bango epai ya kake.
49Atindelaki bango kanda na Ye ya makasi lokola moto: kanda makasi, kotomboka, pasi mpe ba-anjelu oyo babebisaka.
50Apesaki na kanda na Ye nzela ya kopela, abatelaki bango te na kufa; kasi akabaki bango na bokono oyo ebomaka.
51Abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito, bambuma ya liboso ya makasi na bango na se ya bandako ya kapo ya Cham.
52Abimisaki bato na Ye lokola etonga, amemaki bango kati na esobe lokola meme;
53atambolisaki bango na kimia penza, babangaki eloko te; mpe ebale monene emelaki banguna na bango.
54Amemaki bango na mokili na Ye ya bule, na ngomba oyo loboko na Ye ya nguya ezwaki;
55abenganaki bikolo liboso na bango, apesaki bango etando lokola libula mpe avandisaki mabota ya Isalaele kati na bandako na bango ya kapo.
56Kasi bamekaki Nzambe, batombokelaki Ye-Oyo-Aleki-Likolo mpe babatelaki te malako na Ye;
57bapengwaki mpe babukaki mibeko ya boyokani, ndenge batata na bango basalaki; batengamaki lokola tolotolo oyo mbanzi na yango ekeyi na mopanzi;
58bayokisaki Ye kanda na nzela ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, mpe bapelisaki zuwa na Ye na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.
59Nzambe ayokaki mpe asilikaki makasi, abwakaki Isalaele mobimba;
60asundolaki Mongombo ya Silo, ndako ya kapo oyo atelemisaki kati na bato,
61akabaki nguya na Ye na bowumbu, mpe lokumu na Ye na maboko ya monguna;
62akabaki bato na Ye na mopanga, mpe asilikelaki libula na Ye.
63Moto etumbaki bilenge mibali, mpe banzembo ya libala eyembamaki lisusu te mpo na lokumu ya bilenge basi.
64Banganga-Nzambe bakufaki na mopanga, mpe basi oyo bakufisaki mibali balelaki te na banzembo ya matanga.
65Nkolo alamukaki lokola moto oyo awuti na pongi, lokola moto oyo abimi na kwiti ya vino;
66azokisaki banguna na Ye na sima, wana bazalaki kokima, ayokisaki bango soni ya libela.
67Asundolaki bandako ya kapo ya Jozefi mpe aboyaki kopona libota ya Efrayimi;
68kasi aponaki libota ya Yuda, ngomba Siona oyo alingaki;
69atongaki Esika na Ye ya bule lokola bisika ya likolo makasi, lokola mabele oyo atia mpo na libela.
70Aponaki Davidi, mosali na Ye, mpe azwaki ye kati na lopango ya meme;
71abengaki ye wuta na sima ya meme oyo azalaki kobatela mpo na kokomisa Ye mobateli ya Jakobi, bato na Ye, mpe ya Isalaele, libula na Ye.
72Davidi abatelaki bango na motema ezanga pamela, mpe akambaki bango na maboko ya mayele.
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0