Banzembo 120

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe ayanolaki ngai.

2Oh Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bakosi mpe wuta na lolemo ya lokuta!

3Yo, lolemo ya lokuta, Yawe akopesa yo nini, akofuta yo nini?

4Akobeta yo na makonga ya elombe ya bitumba, oyo ezali ya songe, elongo na makala ya moto ya nzete ya nzube.

5Mawa na ngai, mpo ete navandi lokola mopaya kati na Mesheki, kati na bandako ya kapo ya Kedari.

6Navandaki tango molayi kati na bato oyo balingaka kimia te.

7Ngai, nazali moto ya kimia; kasi soki kaka nameki koloba na tina na kimia, bango baponaka mbala moko bitumba.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0