Banzembo 80

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Ezali ya koyemba lokola « Lisi ya Mobeko. » Litatoli. Nzembo ya Azafi.

2Mobateli ya Isalaele, Yo oyo otambolisaka Jozefi lokola etonga ya bameme, yoka; Yo oyo Kiti ya Bokonzi na Yo ezali kati na basheribe, mimonisa

3liboso ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Manase. Monisa nguya na Yo mpe yaka kobikisa biso!

4Oh Nzambe, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

5Eh Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kino tango nini okotombokela mabondeli ya bato na Yo?

6Oleisaki bango lipa esangana na mayi ya miso mpe olangwisaki bango na kopo etonda na mpinzoli;

7okomisaki biso eloko ya kotiola mpo na bazalani na biso, mpe banguna na biso bakomi kotiola biso.

8Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

9Nzete ya vino oyo opikolaki wuta na Ejipito, olonaki yango wana obenganaki bikolo ebele.

10Obongiselaki yango mabele mpo ete ezwa misisa mpe etondisa mokili.

11Elili na yango ezipaki bangomba, bitape na yango ezalaki lokola banzete minene ya sedele.

12Epanzaki bitape na yango kino na ebale monene, mpe mito na yango ya sika kino na ebale.

13Mpo na nini otoboli madusu kati na bamir na yango? Tala ndenge baleki nzela bazali kobuka bambuma na yango!

14Ngulu ya zamba ezali kobebisa yango, mpe nyama ya zamba ezali kolia yango.

15Zongela biso lisusu, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso! Wuta na likolo, tala mpe mona! Senzela mpo na nzete oyo ya vino!

16Batela nzete oyo loboko na Yo ya mobali elonaki, batela solo mwana oyo Yo moko obokolaki.

17Bakati nzete na Yo ya vino mpe batumbi yango na moto; tika ete bakufa na pamela ya elongi na Yo!

18Tika ete loboko na Yo ezala na likolo ya mokonzi oyo avandi na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe na likolo ya mwana na moto oyo Yo moko okomisaki makasi.

19Boye, tokozala lisusu mosika na Yo te; zongisela biso lisusu bomoi, mpe tokobelela Kombo na Yo.

20Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, sala ete tozongela ndenge tozalaki, ngengisela biso elongi na Yo mpo ete tobika.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0