Banzembo 6

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya basinga mwambe.

2Yawe, kopesa ngai etumbu te na kanda na Yo, kopesa ngai etumbu te na kanda makasi na Yo.

3Yawe, yokela ngai mawa, pamba te nazangi makasi. Yawe, bikisa ngai na bokono, pamba te mikuwa na ngai elembi.

4Molimo na ngai ezali kotungisama makasi; bongo Yo, Yawe, kino tango nini?

5Yawe, zongela ngai, mpe kokangola ngai, bikisa ngai, mpo na bolingo na Yo.

6Pamba te bakufi bakoki lisusu te kotatola Kombo na Yo te! Mpe kati na mboka ya bakufi, nani akoki kokumisa Yo?

7Kolela elembisi ngai nzoto. Butu nyonso, nalelaka na mbeto na ngai, mpe napolisaka na mpinzoli, esika oyo nalalaka.

8Miso na ngai ebebi mpo na mawa; ezali lisusu komona malamu te likolo ya banyokoli na ngai.

9Bino nyonso oyo bosalaka mabe, bolongwa liboso na ngai, pamba te Yawe ayoki kolela na ngai.

10Yawe ayanoli mabondeli na ngai mpe ayambi losambo na ngai.

11Banguna na ngai nyonso bakoyoka soni, mpe somo monene ekokanga bango; bakozonga na sima mpe bakoyoka mbala moko soni.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0