Banzembo 116
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo mpe mabondeli na ngai.
2Ayokaki ngai; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
3Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa.
4Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe: « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai! »
5Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo, Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.
6Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
7Molimo na ngai, zongela kimia na yo, pamba te Yawe asaleli yo bolamu.
8Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
9Nakotambola liboso ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
10Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka: « Nazali moto na pasi makasi. »
11Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela: « Bato nyonso bazali bakosi. »
12Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai?
13Nakotombola kopo ya elonga mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
14Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.
15Kufa ya bayengebene ya Yawe ezali na motuya makasi na miso na Ye.
16Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
17Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
18Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,
19kati na lopango ya Tempelo ya Yawe; kati na yo, Yelusalemi. Bokumisa Yawe!
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0