Banzembo 104

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Eh molimo na ngai, pambola Yawe! Yawe, Nzambe na ngai, ozali monene! Olata kongenga mpe lokumu,

2omifinika moyi lokola kazaka, otanda likolo lokola ndako ya kapo.

3Opika makonzi na yango na mayi ya likolo, okomisaka mapata shar na Yo, otambolaka na mapapu ya mopepe.

4Okomisaka bantoma na Yo mipepe, mpe basali na Yo, ndemo ya moto.

5Otia mokili na likolo ya miboko na yango mpo ete eningana te seko na seko.

6Ozipa yango na mayi monene lokola elamba; mayi ezalaki kovanda na likolo ya bangomba.

7Kasi na pamela na Yo, mayi ekimaki; na lokito ya kake na Yo, mayi etiolaki,

8emataki na likolo ya bangomba, ekitaki na mabwaku, na bisika oyo obongisaki mpo na yango.

9Otiaki mondelo oyo ekoki koleka te; ekozonga lisusu te kozipa mokili.

10Obimisaka mayi ya bitima mpo na kosopa yango na mayi minene oyo elekaka na kati-kati ya bangomba;

11ekomaka mayi ya komela mpo na banyama nyonso ya bilanga mpe mpo na ba-ane ya zamba.

12Bandeke ya likolo evandaka pembeni ya mayi yango mpe eyembaka kati na makasa.

13Wuta na bandako na Yo ya likolo, onokisaka mvula na likolo ya bangomba; mokili etondi na mbuma ya misala na Yo.

14Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,

15vino mpo na kosepelisa mitema na bango, mafuta mpo na kongengisa bilongi na bango, mpe mapa mpo na kolendisa mitema na bango.

16Banzete ya Yawe etondi na mayi; ndenge wana nde ezali, banzete ya sedele ya Libani, oyo Yawe alona.

17Bandeke esalaka bazala na yango kuna, mpe nkoko evandaka na banzete ya sipele.

18Bangomba milayi ezali ekimelo mpo na bantaba ya zamba, mpe madusu ya mabanga ezali bibombamelo mpo na bampanya ya zamba.

19Osala sanza mpo na koyeba mikolo ya bafeti. Moyi eyebi tango na yango ya kolala.

20Otindaka molili, mpe butu ekomaka. Bongo banyama nyonso ya zamba ekomaka kotambola-tambola.

21Bana ya nkosi egangaka sima na nyama mpe esengaka bilei epai ya Nzambe.

22Soki moyi ebimi, nkosi elongwaka, ezongaka mpo na kolala na bisika na yango;

23kasi moto abimaka mpo na kokende na mosala na ye mpe asalaka kino na pokwa.

24Oh Yawe, misala na Yo ezali ebele! Osalaki nyonso na bwanya; mokili etondi na biloko oyo okela.

25Tala ndenge ebale monene ezali molayi mpe epanzana, etonda na banyama oyo tokoki kotanga te, kobanda na oyo eleki mike kino na oyo eleki minene.

26Kuna, bamasuwa ekendeke mpe ezongaka; bongo Leviatani oyo osala mpo ete esakanaka kuna.

27Nyonso etalelaka Yo mpo ete opesa yango bilei na tango oyo ekoki.

28Opesaka bilei, mpe ezwaka yango; ofungolelaka yango loboko na Yo, mpe etondaka na biloko.

29Tango obombaka elongi na Yo, somo ekangaka yango; tango olongolaka yango pema, ekufaka mpe ezongaka na putulu;

30tango otindaka pema Yo, ezwaka bomoi; mpe okomisaka mokili sika.

31Tika ete nkembo ya Yawe ewumela libela na libela! Tika ete Yawe asepela na misala na Ye!

32Soki atali mokili, mokili elengaka; soki asimbi bangomba, ebimisaka milinga.

33Nakoyembela Yawe bomoi na ngai mobimba; nakoyembela Nzambe na ngai tango nyonso nazali na bomoi.

34Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye! Tika ete Yawe azala esengo na ngai!

35Tika ete bato ya masumu basila na mokili, mpe bato mabe bazala lisusu te! Oh molimo na ngai, pambola Yawe! Aleluya, bokumisa Yawe!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0