Banzembo 5

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na flite.

2Oh Yawe, yoka maloba na ngai, sosola tina ya kolelalela na ngai.

3Mokonzi na ngai mpe Nzambe na ngai, yoka koganga na ngai wana nazali kosenga lisungi, pamba te nazali kobondela nde Yo.

4Yawe, na tongo, oyokaka mongongo na ngai; na tongo, nabelemaka mpo na kosenga epai na Yo mpe nazelaka.

5Pamba te ozali Nzambe te oyo asepelaka na mabe, mpe moto mabe akoki kutu te kovanda elongo na Yo.

6Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.

7Obomaka bato oyo balobaka lokuta. Yo, Yawe, oyinaka babomi mpe bakosi.

8Kasi mpo ete bolingo na Yo eleki monene, nakoki kokota kati na Ndako na Yo, nakoki kofukama mpo na botosi epai ya Tempelo na Yo ya bule.

9Yawe, tambolisa ngai na bosembo na Yo, pamba te nazali na banguna; bongisa nzela oyo olingi ete natambola na yango.

10Minoko na bango elobaka kaka lokuta, mitema na bango etondi na mabe. Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, mpe bakosaka na nzela ya lolemo na bango.

11Oh Nzambe, katela bango etumbu. Tika ete mabongisi na bango ebotela bango libebi. Bengana bango mpo na ebele ya masumu na bango, pamba te batombokeli nde Yo.

12Kasi tika ete bato nyonso oyo bazwaka Yo lokola ebombamelo na bango bazalaka na esengo tango nyonso, tika ete bayembaka mpo na esengo, bomoi na bango mobimba. Batela bango mpo ete bato oyo balingaka Kombo na Yo basepelaka kati na Yo.

13Oh Yawe, solo, opambolaka bato ya sembo mpe ozingelaka bango na nzela ya ngolu na Yo lokola na nzela ya nguba.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0