Banzembo 118

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

2Tika ete Isalaele aloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »

3Tika ete bakitani ya Aron baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »

4Tika ete bato oyo batosaka Yawe baloba: « Pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko! »

5Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, mpe Yawe ayanolaki ngai, abikisaki ngai.

6Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?

7Yawe azali mpo na ngai, ayaka kosunga ngai; boye natalaka banguna na ngai na miso lokola molongi.

8Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya na bato.

9Eleki malamu koluka ebombamelo kati na Yawe na esika ya kotia elikya kati na bato minene ya mokili.

10Bikolo nyonso ezingelaki ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.

11Bakobaki kaka kozingela ngai, kasi nabebisaki bango na Kombo na Yawe.

12Bazingelaki ngai lokola banzoyi, kasi ekufaki lokola moto ya esobe; nabebisaki yango na Kombo na Yawe.

13Batindikaki ngai mpo ete nakweyisa kondima, kasi Yawe asungaki ngai.

14Yawe azali makasi mpe nguya na ngai; apesaki ngai elonga.

15Koganga ya esengo mpe ya elonga eyokanaka wuta na bandako ya kapo ya bato ya sembo, pamba te nguya na Yawe esalaka makambo minene!

16Yawe asembolaka loboko na Ye ya mobali, mpe nguya na Yawe esalaka makambo minene.

17Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.

18Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi; kasi akabaki ngai na kufa te.

19Bofungolela ngai bikuke ya bosembo mpo ete nakota mpe nakumisa Yawe.

20Tala ekuke ya Yawe; bato ya sembo bakotelaka na ekuke yango.

21Nasanzolaka Yo, pamba te oyanolaki ngai mpe opesaki ngai elonga.

22Libanga oyo batongi ndako babwakaki ekomi libanga ya songe ya ndako, mpe esimbi ndako mobimba.

23Ezali Yawe nde alingaki bongo, mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso!

24Tala mokolo oyo Yawe asali; tika ete tosepela mpe toganga na esengo mpo na mokolo yango!

25Yawe, nabondeli Yo, pesa lobiko. Yawe, nabondeli Yo, pesa elonga.

26Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo! Tozali kopambola bino wuta na Tempelo ya Yawe.

27Yawe azali Nzambe, mpe angengisaki biso. Bokota na molongo, bomema mandalala na maboko mpe bokende kino na maseke ya etumbelo.

28Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo! Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.

29Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0