Banzembo 2

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Mpo na nini bikolo ezali kosala makelele mpe bato bazali kosala makita ya pamba?

2Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.

3Bazali koganga elongo: « Tokata minyololo na bango mpe tomikangola na bokonzi na bango! »

4Kasi Ye oyo avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kuna na likolo aseki, Yawe atioli bango.

5Agangeli bango na kanda, apelisi kanda makasi na Ye mpo na bango, alobi:

6« Ezali Ngai nde natiaki mokonzi na Ngai na Siona, ngomba na Ngai ya bule. »

7Nakosakola mobeko ya Yawe. Alobaki na ngai: « Ozali Mwana na Ngai ya mobali, na mokolo ya lelo, nakomi Tata na Yo.

8Senga Ngai, mpe nakokomisa bikolo libula na Yo, basuka ya mokili bozwi na Yo.

9Okoyangela yango na bokonzi ya ebende, okopanza yango lokola mbeki ya mabele. »

10Yango wana, bino bakonzi, bozala na mayele; bino bayangeli ya mokili, boyoka likebisi oyo.

11Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.

12Bopesa Mwana na Ye beze, noki te akosilika mpe bokokufa na nzela na bino, pamba te kanda na Ye epelaka noki. Esengo na bato oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0