Banzembo 55
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda. Nzembo ya Davidi.
2Oh Nzambe, yoka libondeli na ngai, komibomba te wana nazali kobelela Yo.
3Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,
4mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.
5Motema na ngai etondi na mawa, mpe somo ya kufa ekangi ngai.
6Nakomi kobanga mpe kolenga, somo monene ekangi ngai.
7Nakomi komilobela: « Soki nazalaki ata na mapapu ya ebenga, nalingaki kopumbwa mpo na koluka bopemi;
8nalingaki kokima mosika penza, mpo na kokende kovanda ata na esobe.
9Solo, na lombangu penza, nalingaki kokende koluka ebombamelo mpo na kokima mopepe makasi mpe ekumbaki. »
10Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.
11Butu mpe moyi, ezali kotambola na bamir na yango; misala mabe mpe ya kanza etondi kati na yango.
12Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.
13Soki monguna nde azalaki kofinga ngai, nalingaki kokanga motema; soki ezalaki mpe moyini nde azalaki kotelemela ngai, nalingaki komibomba mpo ete amona ngai te.
14Kasi ezali yo, moto lokola ngai, oyo otambolaka elongo na ngai, molingami mpe moninga na ngai ya motema
15oyo nazalaki kokabola elongo na yo, pasi mpe basekele tango tozalaki kokende nzela moko na Tempelo ya Nzambe.
16Tika ete kufa ekanga bango na mbalakata mpe bakita ya bomoi kati na mboka ya bakufi; pamba te mabe etondi kati na bandako mpe mitema na bango.
17Mpo na ngai, nabelelaka Nzambe, mpe Yawe akobikisa ngai.
18Tongo, midi, pokwa, nasopaka motema na ngai mpe nalelaka, mpe ayokaka mongongo na ngai.
19Akopesa ngai kimia, akokangola ngai na bitumba oyo babundisaka ngai; pamba te bato oyo batelemeli ngai bazali ebele.
20Nzambe ayokaka, akosambwisa bango penza; akonzaka mpo na libela na libela. Babongolaka mitema te mpe batosaka Nzambe te.
21Abundisi balingami na ye, abebisi boyokani na ye.
22Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali, nzokande bitumba evandi kati na motema na ye; maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta, nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
23Bwakela Yawe mokumba na yo, akosunga yo; akotika te ete moto ya sembo akweya mpo na libela.
24Mpe Yo, Nzambe, okobwaka basopi makila mpe bakosi kati na libulu ya libebi; bakokokisa ata kati-kati te ya mikolo ya bomoi na bango. Kasi ngai, natiaka elikya na ngai kati na Yo.
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0