Banzembo 102
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe.
2Yawe, yoka libondeli na ngai! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo!
3Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo; yanola ngai noki!
4Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa lokola molinga, mikuwa na ngai ezali kozika lokola makala ya moto.
5Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
6Mpo ete naleli makasi, natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
7Nakomi lokola esulungutu ya esobe, lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
8Pongi ekimi ngai; nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko na likolo ya ndako.
9Banguna na ngai batombokeli ngai, bazali kofinga ngai tango nyonso mpe bazali kosalela kombo na ngai mpo na kolakela bato mabe.
10Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
11Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
12Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.
13Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.
14Okotelema solo mpo na Siona, pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa; tango oyo ekatama ekoki.
15Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
16Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.
17Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
18Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.
19Tika ete bakoma yango mpo na ekeke oyo ekolanda, mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
20Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili
21mpo na koyoka kolela ya bakangami kati na boloko mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
22Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
23tango bato mpe bikolo bakosangana mpo na kogumbamela Yawe.
24Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
25Nalobaki: « Nzambe na ngai, Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, koboma ngai te na kati-kati ya mikolo ya bomoi na ngai!
26Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
27Bango, bakokufa; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
28Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.
29Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda, mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0