Banzembo 101

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Davidi. Nakoyemba bolingo mpe bosembo; nakoyembela nde Yo, Yawe.

2Nakolanda na bokebi nzela ya bato oyo bazangi pamela. Okoya epai na ngai tango nini? Kati na ndako na ngai, nakotambola malamu na motema ezangi pamela.

3Nakotala eloko moko te ya mabe; nayinaka misala ya bato oyo bazangi kondima, ekoki kokangama na ngai te.

4Mosika na ngai, motema ya kilikili; naboyi kosala mabe.

5Nakosala ete avanda kimia, moto oyo apanzaka, na nkuku, basango ya lokuta mpo na kobebisa lokumu ya baninga. Nakokoka te kotala moto ya lolendo mpe moto ya lofundu.

6Nakopona nde bato ya sembo kati na mokili mpo ete bavanda pembeni na ngai; moto na etamboli ezanga pamela nde akozala mosali na ngai.

7Kati na ndako na ngai, mokosi akovanda te; liboso na ngai, mokosi akotelema te.

8Tongo nyonso, nakosala ete bato nyonso ya misala mabe kati na mokili bavanda kimia; nakolongola na engumba ya Yawe bato nyonso ya mabe.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0