Banzembo 4

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda.

2Nzambe, bosembo na ngai, soki nabeleli Yo, yanola ngai. Kangola ngai na pasi, salela ngai ngolu, mpe yoka libondeli na ngai.

3Bino bato, kino tango nini bokoyokisa nkembo na ngai soni? Kino tango nini bokomisepelisa na makambo ya pamba mpe bokolanda makambo ya lokuta?

4Boyeba ete Yawe abulisi mpo na Ye moko mosali oyo azali sembo na miso na Ye; Yawe ayokaka ngai tango nabelelaka Ye.

5Soki bosiliki, bosalaka masumu te; soki bolali na mbeto, bolukaka kososola makambo mpe bovandaka kimia.

6Bobonzaka bambeka kolanda mibeko mpe botiaka elikya na bino kati na Yawe.

7Bato mingi bazali kotuna: « Nani akomemela biso bolamu? » Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.

8Tondisa motema na ngai na esengo soki bafuluki na bambuma ya ble elongo na vino ya sika.

9Nakolala mpe nakozwa pongi na kimia, pamba te, Yo moko Yawe, osalaka ete navanda na kimia.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0