Banzembo 11

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Kati na Yawe, nazali koluka ebombamelo. Ndenge nini bokoka koloba na ngai: « Kimela na ngomba na bino lokola ndeke? »

2Pamba te, tala, bato mabe babendaka batolotolo na bango, batiaka bambanzi na bango na singa mpo na kobamba yango longwa na molili bato oyo bazali na mitema sembo.

3Soki miboko ebukani, moto ya sembo akoki kosala nini?

4Yawe azali kati na Tempelo na Ye ya bule; Yawe avandi na Kiti na Ye ya Bokonzi kati na Lola. Azali kotala bato nyonso; mpe miso na Ye ezali kososola mozindo ya mitema na bango.

5Yawe atalaka mozindo ya moto ya sembo, kasi ayinaka makasi moto mabe elongo na moto oyo asepelaka na mobulu.

6Tika ete akweyisela bato mabe makala ya moto, sofolo ya moto! Mpe mopepe ya moto ekozala libula na bango.

7Pamba te Yawe azali sembo, alingaka bosembo. Bato ya sembo bakomona elongi na Ye.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0