Banzembo 13

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2Yawe, kino tango nini okobosana ngai mpo na libela? Kino tango nini okobomba elongi na Yo mpo ete namona Yo te?

3Kino tango nini nakozala mawa-mawa kati na motema na ngai mpe nakomitungisa mikolo nyonso? Kino tango nini monguna na ngai akolonga ngai?

4Yawe, Nzambe na ngai, tala mpe yanola ngai. Sala ete miso na ngai emona malamu; soki te, nakokufa,

5bongo monguna na ngai akoloba: « Nalongi ye, » mpe bayini na ngai bakosepela soki nakweyi.

6Kasi ngai, natie elikya na ngai kati na bolingo na Yo, mpe motema na ngai ezali kosepela kati na lobiko na Yo. Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, pamba te asaleli ngai bolamu.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0