Banzembo 73

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto.

2Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya,

3pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe.

4Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe.

5Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka; babelaka te bokono oyo ezwaka bato.

6Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango.

7Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe;

8batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko.

9Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili.

10Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi.

11Balobaka: « Nzambe akoyeba ndenge nini? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi? »

12Tala ndenge bato mabe bazalaka: tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata.

13Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te!

14Mikolo nyonso, nanyokwamaka; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu.

15Soki nalobi: « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo.

16Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema

17kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka.

18Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi.

19Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango!

20Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka.

21Tango motema na ngai ezalaki kotomboka mpe molimo na ngai emitungisaki,

22nasilaki mayele, nakomaki lokola zoba, nakomaki lokola nyama liboso na Yo.

23Nzokande, nazalaka tango nyonso elongo na Yo; osimba ngai na loboko na ngai ya mobali.

24Otambolisaka ngai na nzela ya toli na Yo, mpe, na sima, okoyamba ngai kati na nkembo.

25Kuna na Likolo, nani azali mpo na ngai soki Yo te? Mpe awa na mokili, nasepela na nani soki na Yo te?

26Nzoto na ngai ekoki kobeba, mpe motema na ngai ekoki kolemba; kasi Nzambe azali Libanga mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.

27Bato nyonso oyo bazali mosika na Yo bakokufa; obebisaka bato nyonso oyo batosaka Yo te.

28Kasi mpo na ngai, ezali malamu kozala pene ya Nzambe. Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai, mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0