Banzembo 112

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Bokumisa Yawe! Esengo na moto oyo atosaka Yawe mpe asepelaka makasi na mibeko na Ye.

2Bana na ye bakozala bato na nguya kati na mokili; ekeke ya bato ya sembo ekopambolama.

3Ndako na ye ezali na bokolongono mpe na bomengo, mpe bosembo na ye ewumelaka mpo na seko.

4Pole engengaka kati na molili mpo na bato ya alima, mpo na moto oyo alimbisaka baninga, ayokelaka bato mawa mpe azali sembo.

5Esengo na moto oyo ayokelaka bato mawa mpe adefisaka, mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.

6Solo, aninganaka ata moke te. Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.

7Abangaka basango ya mabe te; motema na ye ezali na kimia, atiaka elikya na ye kati na Yawe.

8Motema na ye eninganaka te, abangaka te kino akomona banguna na ye kozwa etumbu.

9Akabelaka babola na motema ya esengo; bosembo na ye ewumelaka libela na libela, lokumu na ye ekitaka te.

10Moto mabe amonaka yango mpe asilikaka na zuwa, aliaka minu mpe alembaka nzoto. Posa ya bato mabe elimwaka.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0