Banzembo 36

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya Davidi, mowumbu ya Yawe. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

2Kati na motema na ngai, nazali na sango kowuta na Nzambe na tina na bato mabe oyo batondi na masumu: Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango.

3Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.

4Minoko na bango ebimisaka maloba mabe mpe lokuta, baboyaka kosala na bokebi mpe kosala bolamu.

5Ezala na bambeto na bango, basalaka kaka mabongisi ya kosala mabe, batambolaka te mpo na kosala bolamu mpe baboyaka mabe te.

6Yawe, bolingo na Yo ekenda kino na likolo, boyengebene na Yo kino na mapata.

7Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe, mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi. Yawe, obikisaka bato mpe banyama.

8Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya! Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.

9Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo, mpe omelisaka bango mayi kowuta na bolingo monene na Yo.

10Pamba te etima ya bomoi ezali elongo na Yo; kati na pole na Yo nde tomonaka pole.

11Koba kotalisa bolingo na Yo epai ya bato oyo bayebi Yo, mpe bosembo na Yo epai ya bato ya mitema alima.

12Tika ete bato ya lolendo bakoma te kino epai na ngai, mpe tika ete bato mabe babengana ngai te.

13Tala ndenge nini bato ya misala mabe bakweyi, balali na mabele, bazangi makoki ya kotelema.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0