Banzembo 89

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Maloba ya Etani, moto ya Ezera.

2Nakoyemba tango nyonso bolingo ya Yawe; monoko na ngai ekosakola boyengebene na Yo libela na libela.

3Solo, nazali kotatola yango: « Miboko ya bolingo na Yo ezali na suka te; ovandisi boyengebene na Yo kati na likolo. »

4Olobaki: « Nasali boyokani elongo na moponami na ngai, nalapi ndayi epai ya mosali na ngai, Davidi:

5‹ Nakokomisa yo libota ya bokonzi mpo na tango nyonso mpe nakolendisa kiti na yo ya bokonzi mpo na seko. › »

6Yawe, Lola esanzolaka misala na Yo ya kokamwa mpe bosembo na Yo kati na lisanga ya basantu.

7Nani akokani na Yawe kuna na likolo? Nani akokani na Yawe kati na mampinga ya likolo?

8Azali Nzambe ya somo kati na lisanga ya basantu; solo, azali somo koleka ba-oyo nyonso bazingeli Ye.

9Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, nani azali na nguya lokola Yo? Nani, oh Yawe? Boyengebene na Yo ezingeli Yo.

10Yo nde okonzaka lolendo ya ebale monene mpe okitisaka bambonge na yango soki etomboki.

11Yo nde olongaki Rahavi, dalagona ya Ejipito, kino koboma ye; mpe, na nguya na Yo, opanzaki banguna na Yo.

12Likolo ezali ya Yo; mabele mpe ezali ya Yo! Yo nde osala mokili mpe nyonso oyo ezali kati na yango.

13Yo nde okela Nor mpe Sude; Tabori mpe Erimoni egangaka na esengo mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

14Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.

15Bosembo mpe alima ezali miboko ya Kiti ya Bokonzi na Yo, boyengebene mpe bolingo etambolaka liboso na Yo.

16Esengo na bato oyo bayebi kobetela Yo maboko! Yawe, batambolaka na pole ya elongi na Yo,

17basepelaka mikolo nyonso na Kombo na Yo, basanzolaka bosembo na Yo.

18Pamba te ozali nkembo mpe nguya na bango; mpe olongisaka biso na ngolu na Yo.

19Yawe azali nguba na biso; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.

20Mokolo moko, olobaki na bayengebene na Yo kati na emoniseli: « Nasungaki elombe moko ya bitumba, natombolaki elenge mobali moko kati na bato na ngai;

21namonaki Davidi, mosali na ngai; napakolaki ye mafuta na ngai ya bule.

22Nakobatela ye na loboko na ngai ya nguya, mpe loboko na ngai ekokomisa ye makasi.

23Monguna akobimela ye ata moke te na pwasa, moto mabe akokoka konyokola ye te.

24Nakobebisa banguna na ye liboso na ye mpe nakoboma bayini na ye.

25Bolingo mpe boyengebene na ngai ekozala elongo na ye; mpe na Kombo na Ngai, akotombola elongi.

26Nakotia ebale monene na se ya loboko na ye, mpe bibale, na se ya loboko na ye ya mobali.

27Akobelela ngai boye: ‹ Ozali Tata na ngai, Nzambe na ngai, Libanga mpe Mobikisi na ngai! ›

28Mpe ngai, nakokomisa ye mwana na ngai ya liboso, mokonzi oyo aleki na kotombwama kati na bakonzi ya mokili.

29Nakobatela mpo na seko bolingo na ngai mpo na ye; boyokani na ngai elongo na ye ekotikala kobeba te.

30Nakobatela mpo na libela libota na ye ya bokonzi, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela ndenge moko na likolo.

31Soki bana na ye basundoli mibeko na ngai mpe balandi bosembo na ngai te,

32soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,

33nakopesa bango etumbu na nzela ya lingenda, mpo na botomboki na bango, mpe na nzela ya makofi, mpo na masumu na bango;

34kasi nakowangana te bolingo na ngai mpe nakobongola te boyengebene na ngai.

35Nakosambwisa te boyokani na ngai mpe nakobongola te maloba na ngai.

36Nalapaki yango na ndayi mbala moko mpo na libela na Kombo ya bosantu na ngai: ‹ Nakokosa Davidi te! ›

37Libota na ye ya bokonzi ekowumela mpo na libela, mpe kiti na ye ya bokonzi ekowumela lokola moyi liboso na ngai.

38Solo, lokola sanza, ekowumela na bokonzi mpo na libela. Motatoli oyo azali kuna kati na likolo akoki kokosa te. »

39Nzokande, obwakaki, omonaki pamba, osilikelaki mopakolami na Yo!

40Owanganaki boyokani oyo osalaki elongo na mosali na Yo, obwakaki na mabele mpe osambwisaki motole na ye.

41Otobolaki madusu kati na bamir na ye nyonso mpe obukaki bandako na ye, oyo batonga makasi;

42bato nyonso oyo balekaki wana babotolaki ye biloko, mpe bavandi ya pembeni na ye bakomaki kotiola ye.

43Obakisaki makasi ya bayini na ye mpe otondisaki banguna na ye nyonso na esengo,

44osalaki kutu ete mopanga na ye ebalukela ye moko mpe osungaki ye te na bitumba;

45osilisaki kongenga ya lokumu na ye, obwakaki kiti na ye ya bokonzi na mabele;

46okomisaki moke mikolo ya bolenge na ye mpe olatisaki ye kazaka ya soni.

47Yawe, kino tango nini? Okomibomba penza tango nyonso? Kino tango nini kanda na Yo ekongala lokola moto?

48Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai! Okelaki penza bato mpo na suka oyo ezanga ata tina!

49Moto nani akoki kozala na bomoi mpe azanga komona kufa? Nani akolonga kokima nguya ya mboka ya bakufi?

50Nkolo, wapi bolingo na Yo ya kala oyo alakaki Davidi na boyengebene na Yo na nzela ya ndayi?

51Nkolo, kanisa ndenge bazali kosakanela basali na Yo; kobosana te ete namemi mokumba ya bato oyo nyonso!

52Yawe, kanisa mafinga ya banguna na Yo, oyo batiolaka bomoi ya mopakolami na Yo!

53Tika ete Yawe apambolama libela na libela! Amen! Amen!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0