Banzembo 64

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.

2Oh Nzambe, yoka mongongo na ngai kati kolela na ngai, batela ngai mosika ya monguna oyo azali kopesa ngai somo.

3Bomba ngai mosika ya mikano ya bato mabe, mosika ya makita ya bato ya misala mabe.

4Bapelisaka lolemo na bango ndenge bapelisaka mopanga, babimisaka maloba ya bololo lokola makonga

5mpo na kobwakela, na kobombama, moto oyo azangi pamela; babangaka te kobwakela ye yango na mbalakata.

6Balendisanaka mpo na mabongisi mabe, bayokanaka kotia mitambo; balobaka: « Nani akomona yango? »

7Basalaka mabongisi ya kosala bato mabe, balobaka: « Toselingwi na mabongisi na biso! » Makanisi mpe motema ya moto ezali mozindo makasi.

8Kasi Nzambe akobwakela bango makonga na Ye na mbalakata; ekozwa mpe ekozokisa bango.

9Maloba na bango moko ekobalukela bango mpe ekomema bango na libebi; mpe moto nyonso oyo akomona bango akoningisa moto.

10Bato nyonso bakokoma kobanga, kopanza sango ya misala ya Nzambe mpe kososola makambo oyo asalaka.

11Moto ya sembo akosepela mpe akomibomba kati na Yawe; bato nyonso oyo bazali na mitema alima bakomikumisa mpo na yango.

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0