Banzembo 83
Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)
1Nzembo ya Azafi.
2Oh Nzambe, kovanda nye te! Nzambe, kokanga monoko na Yo te, kotikala kimia te!
3Tala ndenge banguna na Yo bazali kotomboka; tala ndenge bayini na Yo bazali kotombola mito na bango!
4Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.
5Bazali koloba: « Boya, toboma bango nyonso mpo ete ekolo na bango ezala lisusu te, mpo ete batanga lisusu kombo ya Isalaele te. »
6Basangani mpe bayokani, basali boyokani mpo na kotelemela Yo:
7bato ya Edomi mpe bato ya Isimaeli, bato ya Moabi mpe bato ya Agari,
8Gebali, Amoni mpe Amaleki, bato ya Filisitia elongo na bato ya Tiri.
9Bato ya Asiri mpe basangani elongo na bango mpo na kobakisa bakitani ya Loti makasi.
10Sala bango ndenge osalaki Madiani, ndenge osalaki Sisera mpe Yabini, kuna na mayi ya Kishoni.
11Babebisamaki na Eyini-Dori, bakomaki lokola matiti ya kopola mpo na mabele.
12Sala bato na bango ya lokumu ndenge osalaki Orebi mpe Zeebi; mpe sala bakambi na bango ndenge osalaki Zeba mpe Tsalimuna
13oyo bazalaki koloba: « Tobotola mabele ya Nzambe! »
14Nzambe na ngai, balola bango lokola matiti oyo mopepe ezali kopumbwisa.
15Ndenge moto ezikisaka zamba, ndenge moto makasi ezikisaka bangomba,
16landa bango na nzela ya mopepe na Yo mpe bangisa bango na nzela ya mopepe makasi na Yo!
17Yawe, tondisa bilongi na bango na soni mpo ete baluka Kombo na Yo!
18Tika ete soni mpe somo makasi elata bango mpo na libela! Tika ete bakufa na soni!
19Tika bayeba ete Yo, oyo Kombo na Yo ezali Yawe, ozali Ye-Oyo-Aleki-Likolo kati na mokili mobimba!
Banzembo
- 1
- 2
- 3
- 4
- 5
- 6
- 7
- 8
- 9
- 10
- 11
- 12
- 13
- 14
- 15
- 16
- 17
- 18
- 19
- 20
- 21
- 22
- 23
- 24
- 25
- 26
- 27
- 28
- 29
- 30
- 31
- 32
- 33
- 34
- 35
- 36
- 37
- 38
- 39
- 40
- 41
- 42
- 43
- 44
- 45
- 46
- 47
- 48
- 49
- 50
- 51
- 52
- 53
- 54
- 55
- 56
- 57
- 58
- 59
- 60
- 61
- 62
- 63
- 64
- 65
- 66
- 67
- 68
- 69
- 70
- 71
- 72
- 73
- 74
- 75
- 76
- 77
- 78
- 79
- 80
- 81
- 82
- 83
- 84
- 85
- 86
- 87
- 88
- 89
- 90
- 91
- 92
- 93
- 94
- 95
- 96
- 97
- 98
- 99
- 100
- 101
- 102
- 103
- 104
- 105
- 106
- 107
- 108
- 109
- 110
- 111
- 112
- 113
- 114
- 115
- 116
- 117
- 118
- 119
- 120
- 121
- 122
- 123
- 124
- 125
- 126
- 127
- 128
- 129
- 130
- 131
- 132
- 133
- 134
- 135
- 136
- 137
- 138
- 139
- 140
- 141
- 142
- 143
- 144
- 145
- 146
- 147
- 148
- 149
- 150
Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.
© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0