Banzembo 92

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

2Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo-Oyo-Oleki-Likolo!

3Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo, na tongo, mpe boyengebene na Yo, na butu,

4na lindanda ya basinga zomi mpe na nzenze!

5Yawe, misala na Yo esepelisaka ngai! Nagangaka na esengo liboso ya misala ya maboko na Yo.

6Yawe, misala na Yo ezali minene, mpe makanisi na Yo ezali mozindo!

7Moto ya kilikili ayebaka te, mpe zoba asosolaka eloko moko te.

8Tango bato mabe bakolaka lokola matiti, mpe bato nyonso ya misala mabe bafulukaka, ezalaka nde mpo ete babebisama libela.

9Kasi Yo, kuna na likolo, ozali Yawe mpo na libela.

10Yawe, banguna na Yo, banguna na Yo bakokufa penza; bato nyonso ya misala mabe bakolimwa.

11Okomisi ngai makasi lokola mpakasa, opakoli ngai mafuta ya sika.

12Miso na ngai ekomi komona bayini na ngai, mpe matoyi na ngai ekomi koyoka banguna na ngai nyonso, oyo bamibongisa mpo na kosala ngai mabe.

13Bato ya sembo bafulukaka lokola nzete ya mbila, bakolaka lokola nzete ya sedele ya Libani.

14Lokola bapikama ngwi kati na Tempelo ya Yawe, bamonaka bolamu kati na lopango ya Nzambe na biso.

15Ata bakomi mibange, babotaka kaka, bazalaka kaka makasi mpe kitoko,

16basakolaka: « Yawe azali alima, azali Libanga na biso; kati na Ye, mabe ezali te! »

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0