Banzembo 106

Lingala — Mokanda na Bomoi (Biblica)

1Bokumisa Yawe! Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!

2Nani akoloba misala minene ya Yawe? Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso?

3Esengo na bato oyo babatelaka mibeko mpe batambolaka na bosembo!

4Yawe, kanisa ngai tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo! Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,

5mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo!

6Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.

7Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.

8Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye, mpo na kotalisa nguya na Ye.

9Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki; atambolisaki bango kati na mozindo lokola na esobe.

10Abikisaki bango wuta na maboko ya bayini na bango, akangolaki bango wuta na maboko ya monguna.

11Mayi ezipaki banguna na bango, moko te atikalaki na bomoi.

12Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye mpe bayembaki masanzoli na Ye.

13Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.

14Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te.

15Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi.

16Kati na molako, basalaki zuwa, batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.

17Mabele efungwamaki mpe emelaki Datani, ezipaki lisanga ya Abirami.

18Moto ezikisaki lisanga na bango mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.

19Na Orebi, basalaki mwana ngombe, bafukamelaki nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto.

20Babongolaki Nzambe na bango ya nkembo elilingi ya ngombe oyo eliaka matiti.

21Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,

22bikamwa kati na mokili ya Cham mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.

23Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.

24Batiolaki mboka kitoko mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.

25Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.

26Asembolaki loboko, alapaki ndayi ya koboma bango kati na esobe,

27ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.

28Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori, baliaki bambeka oyo epesamaki epai ya banzambe oyo ekufa.

29Batumbolaki kanda ya Yawe na nzela ya misala na bango ya mabe, mpe pasi makasi ekotaki kati na bongo.

30Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.

31Mpo na yango, Pineasi atangamaki lokola moto ya sembo mpo na bikeke nyonso, seko na seko.

32Bapesaki Nzambe kanda pene ya mayi ya Meriba mpe bamemisaki Moyize ngambo.

33Mpo ete batombokelaki Molimo ya Nzambe, Moyize akomaki koloba maloba oyo esengeli te.

34Babebisaki te bikolo oyo Yawe ayebisaki bango,

35kasi basanganaki elongo na bapagano mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.

36Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko oyo ekomaki motambo mpo na bango.

37Bapesaki bana na bango lokola bambeka epai ya milimo mabe.

38Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te, makila ya bana na bango, oyo bapesaki lokola mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana. Boye mboka ekomaki mbindo mpo na makila ya bato.

39Bamikomisaki mbindo mpe babebisaki lokumu na bango na nzela ya misala na bango.

40Yawe asilikelaki bato na Ye, ayinaki libula na Ye.

41Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya, mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango;

42banguna na bango banyokolaki bango mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.

43Akangolaki bango bambala ebele, kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka mpe ya komipesa na bambeba na bango.

44Yawe amonaki pasi na bango, tango ayokaki koganga na bango.

45Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.

46Asalaki ete bato nyonso oyo bakomisaki bango bawumbu bayokela bango mawa.

47Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso! Sangisa biso wuta na bikolo mosusu mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo.

48Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Tika ete bato nyonso baloba: « Amen! » Bokumisa Yawe!

Banzembo

Open the interactive reader to switch translations, adjust type, and mark verses — or browse verses by topic.

© 2020 Biblica, Inc. · CC BY-SA 4.0