Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ebombamelo

Bavɛrsɛ 13 ya Biblia na ntína ya Ebombamelo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 46:1

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.

02 Banzembo 62:8

Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.

03 Masese 18:10

Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

04 Banzembo 9:9

Akonzaka mokili na bosembo, akataka makambo ya bato na alima.

05 Naumi 1:7

Yawe azali malamu, azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.

06 Banzembo 91:2

Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »

07 Banzembo 18:2

Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.

08 Banzembo 32:7

Ozali ebombamelo na ngai; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.

09 Banzembo 61:3-4

Wuta na suka ya mokili, nazali kobelela Yo, motema na ngai ebukani! Mema ngai na libanga oyo eleki likolo epai wapi nakokoka te kokoma ngai moko. Pamba te, ozali ebombamelo na ngai, ndako molayi batonga makasi, liboso ya banguna na ngai.

10 Banzembo 142:5

Bwaka miso na ngambo ya loboko ya mobali mpe tala! Moto ata moko te ayebi ngai lisusu, nazali lisusu na ekimelo te, moto ata moko te azali komitungisa na tina na ngai!

11 Deteronomi 33:27

Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.

12 Banzembo 31:1-2

Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eh Yawe, kati na Yo nde nazwa ebombamelo; kondima te ete nayoka soni! Bikisa ngai na bosembo na Yo!

13 2 Samuele 22:3

azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.

Bantína oyo etali