Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Mopanga ya Molimo

Bavɛrsɛ 6 ya Biblia na ntína ya Mopanga ya Molimo mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ba-Efeso 6:17

Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.

02 Ba-Ebre 4:12

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.

03 Matayo 4:4

Yesu azongisaki: — Ekomama: « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »

04 Jeremi 23:29

« boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni? » elobi Yawe.

05 Banzembo 119:11

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

06 Emoniseli 1:16

Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi.

Bantína oyo etali