Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Ebundeli moko te ekolonga

Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Ebundeli moko te ekolonga mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Ezayi 54:17

Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.

02 Ezayi 54:14

Okolendisama kati na bosembo: minyoko ekozala mosika na yo, okobanga lisusu eloko moko te, mpe somo ekokende mosika na yo; ekomeka kopusana lisusu pene na yo te.

03 Barome 8:31

Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?

04 Banzembo 27:1-2

Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani? Tango bato mabe babundisaka ngai mpo na koluka kosala ngai mabe, ezali bayini mpe banguna na ngai nde baninganaka mpe bakweyaka.

05 Ezayi 41:11

Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo bakokufa solo soni mpe bakosambwa; bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma lokola biloko pamba mpe bakokufa.

06 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

07 Banzembo 91:7

Ezala bato nkoto moko bakweyi pembeni na yo, mpe bato nkoto zomi, na ngambo ya loboko na yo ya mobali, ekozwa yo ata moke te.

08 Deteronomi 28:7

Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo.

09 Kobima 14:14

Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia.

10 2 Masolo ya Kala 20:17

Bokobunda bitumba ata moke te: bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te! Lobi, bokende kokutana na bango; mpe Yawe akozala elongo na bino! › »

Bantína oyo etali