Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Etumba ya molimo mpe Libateli
Bomoi ya mokristo ezali etumba, kasi tobundaka uta na elonga na bibundeli oyo Nzambe apesi. Oyo azali kati na bino aleki na monene oyo azali na mokili. Bavɛrsɛ oyo elendisaka yo kotelema ngwi na nse ya bobateli ya Nkolo.
Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.
Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »
kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai; natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai. Motema na ngai etondi na esengo, mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.
Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo.
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
Abombaka yo na se ya mapapu na Ye, mpe ozwaka ebombamelo ya malonga na se ya mapapu na Ye; bolingo na Ye ebatelaka lokola nguba mpe lokola elamba ya ebende.
Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto!
Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.