Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Bokangoli
Bavɛrsɛ 10 ya Biblia na ntína ya Bokangoli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.
kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
Ye nde akangolaki biso na makama ya kufa ya lolenge wana, mpe akokangola biso lisusu. Solo, tozali na elikya kati na Ye ete akokangola biso lisusu,
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Natiaki elikya na ngai kati na Yawe; abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Napesi mitindo ete, na bituka nyonso ya mokili na ngai, bato nyonso batosa mpe bapesa Nzambe ya Daniele lokumu. Pamba te azali Nzambe na bomoi mpe ya seko na seko; bokonzi na Ye ekotikala kobebisama te mpe ekowumela seko na seko.
Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.
Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela! Amen.
Mpe belela ngai na tango ya pasi; nakokangola yo, mpe okopesa ngai nkembo.
Akangolaki biso na bokonzi ya molili mpe amemaki biso kati na bokonzi ya Mwana na Ye ya bolingo,