Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Libateli

Bavɛrsɛ 7 ya Biblia na ntína ya Libateli mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 Banzembo 91:1-2

Moto oyo awumelaka kati na ebombamelo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka na se ya bobatelami ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. Nalobaka na tina na Yawe: « Nzambe na ngai azali ebombamelo mpe ndako makasi na ngai; natiaka elikya na ngai kati na Ye! »

02 Banzembo 121:7-8

Yawe akobatela yo na mabe nyonso, akobatela bomoi na yo; Yawe akobatela kokende mpe kozonga na yo, sik’oyo mpe libela na libela.

03 Ezayi 41:10

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo; komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo; nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo; solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, loboko oyo elongisaka.

04 2 Batesalonika 3:3

Kasi Nkolo azali sembo, akopesa bino makasi mpe akobatela bino liboso ya Satana.

05 Banzembo 32:7

Ozali ebombamelo na ngai; obatelaka ngai mpo ete pasi ekanga ngai te mpe ozingelaka ngai na banzembo ya kokangolama.

06 Banzembo 121:1-3

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai na ngambo ya bangomba: lisungi na ngai ekowuta wapi? Lisungi na ngai ewutaka na Yawe oyo akela likolo mpe mabele. Akotika te ete lokolo na yo eselumuka; Ye oyo abatelaka yo animbaka te.

07 Masese 18:10

Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.

Bantína oyo etali