Bavɛrsɛ ya Biblia na ntína ya Oyo azali kati na bino aleki

Bavɛrsɛ 12 ya Biblia na ntína ya Oyo azali kati na bino aleki mpo na kotánga, kokanisa, mpe kokanga na motó.

01 1 Yoane 4:4

Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.

02 Barome 8:31

Boye, toloba lisusu nini? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso?

03 1 Yoane 5:4

pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali: kondima na biso.

04 Barome 8:37

Kasi kati na makambo oyo nyonso, tozali penza balongi na nzela ya Ye oyo alinga biso.

05 2 Bakonzi 6:16

Mosakoli azongisaki: — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.

06 1 Yoane 4:18

Kati na bolingo, kobanga ezalaka te; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.

07 Banzembo 118:6

Yawe azali mpo na ngai, nakobanga te; bato bakoki kosala ngai nini?

08 Ezayi 54:17

Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.

09 Luka 10:19

Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.

10 Bakolose 2:15

Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.

11 Yoane 16:33

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

12 Banzembo 27:1

Nzembo ya Davidi. Yawe azali pole mpe lobiko na ngai; nakobanga nani? Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai; nakolenga liboso ya nani?

Bantína oyo etali